4 Bongo bato ya Davidi babandaki koloba na ye boye: “Lelo ezali mokolo oyo Yehova alobi na yo ete: ‘Talá! Napesi yo monguna na yo na lobɔkɔ na yo,+ mpe salá ye ndenge ekomonana malamu na miso na yo.’”+ Na yango, Davidi atɛlɛmaki mpe akataki na malɛmbɛ nsɔngɛ ya kazaka ya Saulo oyo ezangá mabɔkɔ.