Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 22:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Osengeli te kotika na bomoi mwasi oyo azali nganga-nkisi.+

  • Balevi 19:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “‘Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo,+ mpe bótuna te bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya,+ noki bákómisa bino mbindo. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.

  • Balevi 20:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Bongo molimo oyo abaluki mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo+ mpe epai ya bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya+ mpo na kosala na bango pite, nakotɛmɛla mpenza molimo yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye.+

  • Balevi 20:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “‘Mpe mobali to mwasi oyo azali na elimo ya kosolola na bilimo to oyo azali na elimo oyo eyebisaka makambo ekoya,+ basengeli mpenza kobomama.+ Bakobamba bango mabanga kino bakokufa. Makila na bango ezali na motó na bango.’”+

  • Kolimbola Mibeko 18:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 to moto oyo azali kolɔka+ bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo+ to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya+ to moto oyo azali kotuna bakufi.+

  • Emoniseli 21:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kasi bato ya bibangabanga ná baoyo bazangi kondima+ ná baoyo bazali na bosɔtɔ mpe na mbindo+ ná babomi-bato+ ná bato ya pite+ ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ná basambeli ya bikeko+ ná bato nyonso ya lokuta,+ likabo na bango ekozala na kati ya laki oyo ezali kopela na mɔtɔ+ mpe na sufulu.+ Yango elakisi liwa ya mibale.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto