Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 1:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na ntango yango, bakokoba kobenga ngai, kasi nakoyanola te;+ mpe bakokoba koluka ngai, kasi bakomona ngai te,+

  • Masese 28:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ye oyo alongoli litoi na ye ete ayoka mobeko te+—ata libondeli na ye ezali eloko moko oyo eyinamá.+

  • Yisaya 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino,+ nazali kozipa miso na ngai liboso na bino.+ Ata bozali kobondela mingi,+ nazali koyoka te;+ mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.+

  • Ezekiele 20:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Mwana ya moto, lobá na mikóló ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ezali mpo na kotuna ngai nde bozali koya?+ ‘Lokola nazali solo na bomoi, nakotika te ete bótuna ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’

  • Mika 3:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Na ntango yango, bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, kasi akoyanola bango te.+ Mpe akobombela bango elongi na ye na ntango wana,+ na kolanda mabe oyo basalaki na misala na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto