Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nabondeli yo, ndimá likabo oyo ezali lipamboli na ngai, oyo namemeli yo,+ mpo Nzambe andimi ngai mpe mpo nazali na eloko nyonso.”+ Mpe akobaki kobondela ye, bongo andimaki yango.+

  • 2 Bakonzi 5:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, azongaki epai ya moto ya Nzambe ya solo,+ ye ná kaa na ye mobimba, mpe ayaki mpe atɛlɛmaki liboso na ye mpe alobaki: “Talá, sikoyo, nayebi mpenza ete Nzambe azali na esika mosusu te na mabele, kaka na Yisraele.+ Mpe sikoyo, nabondeli yo, ndimá likabo ya lipamboli+ oyo euti na mosaleli na yo.”

  • Masese 11:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Moto mosusu apalanganisaka kasi biloko na ye ebakisamaka;+ moto mosusu mpe aboyaka kosala oyo ezali malamu, asukaka kaka na kokelela.+

  • Masese 18:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Likabo oyo moto apesi ekofungolela ye nzela polele,+ mpe ekomema ye ata liboso ya bato minene.+

  • Misala 20:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Namonisaki bino na makambo nyonso ete na kosaláká mosala makasi+ ndenge wana nde bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu,+ mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa+ eleki oyo ya kozwa.’”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto