25 Yehova akosala ete banguna na yo bálonga yo.+ Okobimela bango na nzela moko, kasi okokima liboso na bango na nzela nsambo; mpe okokóma mpenza eloko moko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele.+
14 Bongo nkanda ya Yehova epelelaki Yisraele,+ mpe apesaki bango na mabɔkɔ ya bapunzi, mpe babandaki kopunza bango;+ mpe atɛkaki bango na lobɔkɔ ya banguna na bango oyo bazalaki zingazinga,+ mpe bakokaki lisusu te kotɛlɛma liboso ya banguna na bango.+