9 Mpe esalemaki boye: nsima ya komema yango tii kuna, lobɔkɔ ya Yehova+ ekitelaki engumba yango, ekɔtisaki mobulungano monene mpenza mpe abandaki kobɛta mibali ya engumba yango, banda na oyo ya moke tii na oyo ya monene, mpe misomba+ ebandaki kobima bango.