Ebandeli 15:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Bongo alobaki na ye ete: “Zwelá ngai mwana-ngɔmbɛ ya mwasi ya mbula misato mpe ntaba ya mwasi ya mbula misato mpe mpate-mobali ya mbula misato ná epopo mpe mwana ya ebenga.”+ 1 Samwele 6:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Sikoyo bósala pusu+ ya sika mpe bókamata bangɔmbɛ mibale oyo ezali naino komɛlisa, oyo batyá naino ekanganeli+ likoló na yango te, mpe bókangisa bangɔmbɛ yango na pusu wana, mpe bózongisa bana na yango na ndako, bálanda yango te. 1 Samwele 16:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Kasi Samwele alobaki ete: “Nakokende ndenge nini? Soki kaka Saulo ayoki yango, akoboma ngai mpenza.”+ Bongo Yehova alobaki lisusu boye: “Okomema mwana-ngɔmbɛ moko ya mwasi elongo na yo, mpe okoloba boye: ‘Nayei kopesa Yehova mbeka.’+
9 Bongo alobaki na ye ete: “Zwelá ngai mwana-ngɔmbɛ ya mwasi ya mbula misato mpe ntaba ya mwasi ya mbula misato mpe mpate-mobali ya mbula misato ná epopo mpe mwana ya ebenga.”+
7 Sikoyo bósala pusu+ ya sika mpe bókamata bangɔmbɛ mibale oyo ezali naino komɛlisa, oyo batyá naino ekanganeli+ likoló na yango te, mpe bókangisa bangɔmbɛ yango na pusu wana, mpe bózongisa bana na yango na ndako, bálanda yango te.
2 Kasi Samwele alobaki ete: “Nakokende ndenge nini? Soki kaka Saulo ayoki yango, akoboma ngai mpenza.”+ Bongo Yehova alobaki lisusu boye: “Okomema mwana-ngɔmbɛ moko ya mwasi elongo na yo, mpe okoloba boye: ‘Nayei kopesa Yehova mbeka.’+