Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 mpe nsima ya kozongela Yehova Nzambe+ na yo mpe ya koyoka mongongo na ye na kolanda mitindo nyonso oyo nazali kopesa yo lelo, yo ná bana na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,+

  • 1 Samwele 12:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Bóbanga+ nde Yehova, mpe bósalela ye na solo mpe na motema na bino mobimba;+ mpo bótala naino makambo minene oyo asali mpo na bino.+

  • 1 Bakonzi 8:48
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 mpe soki bazongeli yo mpenza na motema na bango mobimba+ mpe na molimo na bango mobimba na mokili ya banguna na bango oyo bamemaki bango bakangami, mpe babondeli yo mpenza, wana batali na ngámbo ya mokili na bango oyo opesaki bankɔkɔ na bango, engumba oyo oponá mpe ndako oyo natongeli nkombo na yo;+

  • Yisaya 55:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+

  • Yoele 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mpe sikoyo lisusu bózongela ngai na mitema na bino nyonso,+ mpe na kokila bilei+ mpe na kolela mpe na koganga ya kolela,”+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto