19 Kasi bino, lelo oyo, boboyi Nzambe na bino,+ oyo azalaki kobikisa bino na mabe mpe bampasi na bino nyonso, mpe bolobi: “Te, osengeli nde kotyela biso mokonzi.” Bongo sikoyo, bótɛlɛma liboso ya Yehova na kolanda mabota+ na bino mpe na kolanda bituluku na bino ya bato nkóto nkóto.’”