Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 11:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na yango, bato nyonso ya ekólo bakendaki na Gilgale, mpe kuna, batyaki Saulo mokonzi liboso ya Yehova, na Gilgale. Na nsima, bapesaki bambeka ya boyokani kuna, liboso ya Yehova,+ mpe kuna, Saulo ná mibali nyonso ya Yisraele bakobaki kosepela makasi mpenza.+

  • 1 Samwele 13:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango, Samwele alobaki na Saulo boye: “Osali likambo na bozoba.+ Otosi te mobeko+ oyo Yehova Nzambe na yo apesaki yo,+ mpo soki otosaka, Yehova alingaki kokómisa bokonzi na yo makasi na Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.

  • 1 Samwele 15:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Kasi Samwele alobaki na Saulo boye: “Nakozonga elongo na yo te, mpo oboyi liloba ya Yehova, mpe Yehova aboyi yo okoba kozala mokonzi ya Yisraele.”+

  • 1 Samwele 16:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe esalemaki boye: ntango elimo ya Nzambe ezalaki koyela Saulo, Davidi azalaki kozwa nzɛnzɛ mpe kobɛta yango na lobɔkɔ na ye; mpe ezalaki kokitisa Saulo motema mpe azalaki koyoka malamu, mpe elimo mabe ezalaki kotika ye.+

  • 1 Samwele 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nsukansuka, Saulo alobaki na basaleli na ye boye: “Bólukela ngai mwasi moko oyo azali nganga-nkisi,+ oyo azali na nguya ya kosolola na bilimo, mpe nakokende epai na ye mpe nakotuna ye.” Bongo basaleli na ye balobaki na ye ete: “Talá! Mwasi moko oyo azali nganga-nkisi azali na Ene-dore, azali na nguya ya kosolola na bilimo.”+

  • 1 Samwele 31:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo Saulo alobaki na momemi-bibundeli na ye boye: “Bendá mopanga+ na yo mpe tɔbɔlá ngai na yango, mpo bisutu+ oyo báya te kotɔbɔla ngai mpenza mpe kosambwisa ngai.” Kasi momemi-bibundeli na ye aboyaki,+ mpamba te azalaki kobanga makasi. Bongo Saulo azwaki mopanga mpe akwelaki yango.+

  • 2 Samwele 1:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Saulo ná Yonatane,+ bato oyo balingami mingi, bato oyo bazalaki kosepelisa na bomoi na bango,

      Mpe na liwa na bango bakabwani te.+

      Bazalaki na mbangu koleka bampongo,+

      Bazalaki na makasi koleka bankɔsi.+

  • Misala 13:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Kasi banda na ntango wana basɛngaki mokonzi,+ mpe Nzambe apesaki bango Saulo mwana ya Kishe, mobali moko ya libota ya Benyamina,+ mpo na mbula ntuku minei (40).

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto