22 Bongo esalemaki boye: ntango bakamela yango esilisaki komɛla mai, mobali yango akamataki lopɛtɛ ya wolo ya kotya na zolo,+ oyo ezalaki na kilo ya shekele moko kabolá na mibale, mpe bikɔmɔ mibale+ mpo na mabɔkɔ na ye, oyo ezalaki na kilo ya shekele zomi ya wolo,