Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 6:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ye alobaki na ye ete: “Limbisá ngai, Yehova. Nakobikisa Yisraele na nini?+ Talá! Libota* na ngai ezali libota oyo eleki moke na kati ya Manase, mpe ngai nazali moto oyo aleki moke na ndako ya tata na ngai.”+

  • Masese 3:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Soki bazali basɛki,+ akotyola bango;+ kasi akondima bato ya komikitisa.+

  • Masese 11:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Lofundo eyei? Boye nsɔni ekoya;+ kasi bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.+

  • Masese 18:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Liboso ya kokwea, motema ya moto ezalaka na lolendo,+ mpe komikitisa ezalaka liboso ya nkembo.+

  • Masese 22:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Komikitisa ná kobanga Yehova epesaka bomɛngo mpe nkembo mpe bomoi.+

  • Luka 14:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+

  • Yakobo 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Atako bongo, boboto monene oyo ye amonisaka ezali monene koleka.+ Yango wana elobi: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+

  • 1 Petro 5:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto