Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Lobi, pene na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko oyo akouta na mokili ya Benyamina,+ mpe osengeli kotya ye mafuta+ akóma mokambi ya bato na ngai Yisraele; mpe akobikisa bato na ngai na lobɔkɔ ya Bafilistia,+ mpamba te namoni mpasi ya bato na ngai, mpo koganga na bango ekómeli ngai.”+

  • 1 Samwele 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na nsima, Samwele azwaki molangi+ ya mafuta mpe asopaki yango na motó na ye mpe apwɛpwaki+ ye mpe alobaki ete: “Oyo emonisi solo te ete Yehova atye yo mafuta ete okóma mokambi+ ya libula na ye?+

  • 1 Samwele 24:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo alobaki na bato na ye boye: “Na kotalela likanisi ya Yehova, nakoki kokanisa ata moke te kosala nkolo na ngai, moto oyo Yehova atye mafuta,+ likambo oyo ete nasembolela ye lobɔkɔ na ngai, mpo azali moto oyo Yehova atye mafuta.”+

  • 2 Samwele 1:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo Davidi alobaki na ye: “Ndenge nini obangaki te+ kosembola lobɔkɔ na yo mpo na koboma moto oyo Yehova atye mafuta?”+

  • Misala 4:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Kutu, Erode ná Ponse Pilate+ ná bato ya bikólo, elongo na bato ya Yisraele, bayanganaki mpenza na kati ya engumba oyo mpo na kotɛmɛla mosaleli na yo mosantu+ Yesu, oyo yo otyaki mafuta,+

  • Misala 10:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 elingi koloba, Yesu oyo azalaki moto ya Nazarete, ndenge Nzambe atyaki ye mafuta na elimo santu+ mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa baoyo nyonso banyokwami na Zabolo;+ mpo Nzambe azalaki elongo na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto