4 Mpe talá! Boaze akómaki wana autaki na Beteleme mpe alobaki na babuki-mbuma ete: “Yehova azala na bino.”+ Mpe bango balobaki na ye ete: “Yehova apambola yo.”+
14 Na ntango yango, moko ya bilenge mibali ayebisaki Abigaile mwasi ya Nabale ete: “Talá! Davidi atindaki bamemi-nsango longwa na esobe mpo na kotombela nkolo na biso kimya, kasi ye apameli+ bango makasi.