Kobima 19:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Mpe Ngomba Sinai ezalaki kobimisa milinga epai na epai,+ mpo Yehova akitaki kuna kati na mɔtɔ;+ mpe milinga na yango ezalaki komata lokola milinga ya mombonda,+ mpe ngomba mobimba ezalaki kolɛnga makasi mpenza.+ Nahumu 1:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Bangomba eningani mpo na ye, mpe bangomba mike enyangwi.+ Mpe mabele ekotombwana mpo na elongi na ye; ndenge moko mpe mabele oyo ebotaka, mpe baoyo nyonso bafandaka wana.+ Matai 27:51 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 51 Mpe talá! rido+ ya esika mosantu epasukaki na mibale, banda na likoló tii na nse,+ mpe mabele eninganaki, mpe mabanga epasukaki.+ Misala 16:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 Na mbala moko koningana monene ya mabele esalemaki, mpe miboko ya bolɔkɔ eninganaki. Lisusu, baporte nyonso efungwamaki na ntango wana kaka, mpe minyɔlɔlɔ ya bato nyonso efungwamaki.+
18 Mpe Ngomba Sinai ezalaki kobimisa milinga epai na epai,+ mpo Yehova akitaki kuna kati na mɔtɔ;+ mpe milinga na yango ezalaki komata lokola milinga ya mombonda,+ mpe ngomba mobimba ezalaki kolɛnga makasi mpenza.+
5 Bangomba eningani mpo na ye, mpe bangomba mike enyangwi.+ Mpe mabele ekotombwana mpo na elongi na ye; ndenge moko mpe mabele oyo ebotaka, mpe baoyo nyonso bafandaka wana.+
51 Mpe talá! rido+ ya esika mosantu epasukaki na mibale, banda na likoló tii na nse,+ mpe mabele eninganaki, mpe mabanga epasukaki.+
26 Na mbala moko koningana monene ya mabele esalemaki, mpe miboko ya bolɔkɔ eninganaki. Lisusu, baporte nyonso efungwamaki na ntango wana kaka, mpe minyɔlɔlɔ ya bato nyonso efungwamaki.+