Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 33:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Esengo na yo, Ee Yisraele!+

      Nani azali lokola yo,+

      Ekólo moko oyo ezali kozwa lobiko na Yehova,+

      Nguba ya lisalisi na yo,+

      Mpe Ye oyo azali mopanga na yo oyo eleki monene?+

      Bongo banguna na yo bakogumbamela yo na kobanga,+

      Mpe yo—okonyata bisika na bango oyo etombwaná.”+

  • Basambisi 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe ntango Yehova azalaki kobimisela bango basambisi,+ Yehova azalaki elongo na mosambisi mokomoko, mpe azalaki kobikisa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango mikolo nyonso ya mosambisi yango; mpamba te Yehova azalaki koyoka mawa+ na komilelalela na bango mpo na banyokoli na bango+ mpe mpo na baoyo bazalaki kotindikatindika bango.

  • 2 Bakonzi 19:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Mpe nakobatela+ mpenza engumba oyo mpo na kobikisa yango mpo na ngai moko+ mpe mpo na Davidi mosaleli na ngai.”’”+

  • Nzembo 17:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Kómisá misala na yo ya motema boboto misala ya kokamwa,+ Ee Mobikisi ya baoyo bazali koluka esika ya kokima

      Bato oyo bazali kotombokela lobɔkɔ na yo ya mobali.+

  • Nzembo 44:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Mpo obikisaki biso na mabɔkɔ ya banguna na biso,+

      Mpe baoyo bazali koyina biso makasi oyokisa bango nsɔni.+

  • Yisaya 63:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe alobaki lisusu boye: “Ya solo bazali bato na ngai,+ bana oyo bakokosa te.”+ Yango wana, akómaki Mobikisi na bango.+

  • Hosea 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi nakoyokela ndako ya Yuda mawa,+ mpe nakobikisa bango na nzela ya Yehova Nzambe na bango;+ kasi nakobikisa bango na nzela ya litimbo te, ya mopanga te, ya etumba te, ya bampunda te, ya bato oyo batambolaka na mpunda mpe te.”+

  • 1 Timote 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yango wana, tozali kosala mosala makasi mpe koboma nzoto,+ mpo totye elikya+ na biso epai ya Nzambe moko ya bomoi, oyo azali Mobikisi+ ya bato ya ndenge nyonso,+ mingimingi mpenza ya bato ya sembo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto