Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 18:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Ekoki kokanisama ata moke te mpo na yo ete osala ndenge wana: oboma moyengebene elongo na moto mabe, bongo ekómela moyengebene ndenge ekómelaka moto mabe!+ Ekoki kokanisama bongo ata moke te mpo na yo.+ Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?”+

  • Ebandeli 19:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bongo mibali yango balobaki na Lota ete: “Ozali na moto mosusu awa? Mobali ya mwana na yo mpe bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi mpe moto na yo nyonso oyo azali na engumba, bimisá bango na esika oyo!+

  • Mitángo 16:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Na nsima, alobaki na liyangani ete: “Nabondeli bino, bólongwa liboso ya bahema ya mibali mabe oyo mpe bósimba eloko na bango ata moko te,+ mpo bókɔmbɔlama te na lisumu na bango nyonso.”

  • 1 Bakonzi 20:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Bongo basaleli na ye balobaki na ye boye: “Talá, sikoyo, toyoki ete bakonzi ya ndako ya Yisraele bazali bakonzi moko ya motema boboto.+ Tobondeli yo, tólata ngɔtɔ+ na loketo na biso+ mpe bansinga na mitó na biso, mpe tóbima epai ya mokonzi ya Yisraele. Mbala mosusu akobatela molimo na yo na bomoi.”+

  • Masese 20:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Motema boboto ná bosolo—yango ebatelaka mokonzi;+ mpe na motema boboto, alendisi kiti na ye ya bokonzi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto