1 Samwele 2:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Soki moto asaleli moto mosusu lisumu,+ Nzambe akokatela ye likambo;+ kasi soki moto asaleli nde Yehova lisumu,+ nani akobondela mpo na ye?”+ Kasi bango bazalaki koyoka mongongo ya tata na bango te,+ mpo sikoyo, Yehova amonaki malamu aboma bango.+ 2 Bakorinti 7:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Mpo mawa oyo eyokani na mokano ya Nzambe ememaka na kobongola motema mpo na lobiko oyo moto akomona yango mabe te na nsima;+ kasi mawa ya mokili ebotaka liwa.+ Yakobo 4:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Yango wana, soki moto ayebi kosala oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te,+ ezali lisumu.+
25 Soki moto asaleli moto mosusu lisumu,+ Nzambe akokatela ye likambo;+ kasi soki moto asaleli nde Yehova lisumu,+ nani akobondela mpo na ye?”+ Kasi bango bazalaki koyoka mongongo ya tata na bango te,+ mpo sikoyo, Yehova amonaki malamu aboma bango.+
10 Mpo mawa oyo eyokani na mokano ya Nzambe ememaka na kobongola motema mpo na lobiko oyo moto akomona yango mabe te na nsima;+ kasi mawa ya mokili ebotaka liwa.+