Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 14:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Kasi tata na ye ná mama na ye balobaki na ye ete: “Mwasi azali te kati na bana basi ya bandeko na yo mpe kati na bato nyonso ya ekólo na ngai,+ mpo yo okende kozwa mwasi epai ya Bafilistia, bato oyo bakatamá ngenga te?”+ Nde Samsone alobaki na tata na ye boye: “Zwelá ngai ye kaka, mpo ye kaka nde abongi na miso na ngai.”

  • 1 Samwele 17:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Bongo Davidi abandaki koloba na mibali oyo batɛlɛmaki pene na ye ete: “Bakosala nini na moto oyo akoboma Mofilistia+ wana mpe akolongola Yisraele nsɔni?+ Mpo esutu+ ya Mofilistia oyo azali nani mpo atumola+ milɔngɔ ya etumba ya Nzambe ya bomoi?”+

  • 1 Samwele 17:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Ezala nkɔsi, ezala mpe urse, mosaleli na yo abomaki yango; esutu ya Mofilistia+ oyo asengeli mpe kokóma lokola moko na yango, mpo atumoli+ milɔngɔ ya etumba+ ya Nzambe ya bomoi.”+

  • 1 Samwele 21:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe basaleli ya Akishe bakómaki koloba na ye boye: “Oyo Davidi te, mokonzi+ ya mokili yango? Ye nde moto oyo bazalaki se koyembela na mondimo+ mpe na mabina ete:

      ‘Saulo abomi oyo ya ye bankóto,

      Mpe Davidi abomi oyo ya ye bankóto zomi zomi’?”+

  • 2 Samwele 1:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bólobela yango na Gate+ te;

      Bósakola yango na babalabala ya Ashekelone+ te,

      Noki bana basi ya Bafilistia básepela,

      Noki bana basi ya bato oyo bazali bisutu bázala na esengo mingi.+

  • 2 Samwele 3:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Lisusu, Davidi atindaki bamemi-nsango epai ya Ishi-boshete,+ mwana ya Saulo, alobaki: “Pesá mwasi na ngai Mikale, oyo nakangelá lopango na misutu+ nkama moko (100) ya Bafilistia.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto