6 Ntango Mefiboshete mwana ya Yonatane mwana ya Saulo akɔtaki epai ya Davidi, na mbala moko, akweaki elongi na nse mpe afukamaki.+ Na nsima, Davidi alobaki: “Mefiboshete!” Bongo ye alobaki ete: “Mosaleli na yo, ye oyo.”
4 Bongo mokonzi alobaki na Ziba ete: “Talá! Biloko nyonso ya Mefiboshete ezali ya yo.”+ Na yango, Ziba alobaki: “Nagumbami.+ Tiká nandimama na miso na yo, nkolo na ngai mokonzi.”