Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 35:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “‘Sikoyo soki abɛtaki ye na esaleli ya ebende, bongo akufi, azali mobomi-moto.+ Mobomi-moto asengeli mpenza kobomama.+

  • 2 Samwele 3:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Ntango Abinere azongaki na Hebrone,+ Yoabe amemaki ye pembeni, na porte mpo na kosolola na ye na malɛmbɛ.+ Kasi, kuna, Yoabe abɛtaki ye na libumu,+ mpe akufaki mpo na makila ya ndeko na ye Asahele.+

  • 1 Bakonzi 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe lisusu, yo moko oyebi malamu makambo oyo Yoabe mwana ya Zeruya asalaki ngai,+ na makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya basoda ya Yisraele, ndenge asalaki Abinere+ mwana ya Nere ná Amasa+ mwana ya Yetere+ ntango abomaki bango, mpe na ntango ya kimya asopaki makila+ oyo esengelaki kosopama kaka na ntango ya etumba mpe atyaki makila ya etumba na mokaba oyo ezalaki na loketo na ye mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.

  • Nzembo 55:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ee Nzambe, yo moko okokitisa bango na libulu ya nse koleka.+

      Bato oyo bazali na ngambo ya makila mpe bato ya bokosi, bakokokisa ata katikati ya mikolo na bango te.+

      Kasi ngai, nakotyela yo motema.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto