51 Mpe Davidi akobaki kopota mbangu mpe ayaki kotɛlɛma likoló ya Mofilistia yango. Na nsima, azwaki mopanga+ na ye, abendaki yango na libenga na yango mpe abomaki ye mpenza na ntango akataki ye motó na mopanga yango.+ Mpe Bafilistia bamonaki ete elombe na bango akufi, bongo bakimaki.+
9 Bongo bakataki ye motó+ mpe balongolaki bibundeli na ye mpe batindaki bato bipai na bipai, na mokili ya Bafilistia, mpo na kopesa nsango+ na bandako ya bikeko+ na bango mpe na bato.
7 Mpe esalemaki boye: ntango kaka mokanda ekómelaki bango, bazwaki bana yango ya mokonzi mpe babomaki bango, mibali ntuku nsambo+ (70), nsima na yango, batyaki mitó na bango na kati ya bakitunga mpe batindelaki ye yango na Yizireele.