1 Samwele 28:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Na nsima, Bafilistia bayanganaki mpe bayaki kotya kaa na bango na Shuneme.+ Bongo Saulo ayanganisaki Yisraele mobimba mpe batyaki kaa na Gilboa.+ 1 Samwele 31:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Bongo Bafilistia bazalaki kobundisa Yisraele,+ mpe mibali ya Yisraele bakimaki liboso ya Bafilistia, mpe bazalaki kokwea se kokwea, babomami+ na Ngomba Gilboa.+ 2 Samwele 1:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Na yango, elenge mobali oyo azalaki koloba na ye alobaki boye: “Nakómaki kaka boye na Ngomba Gilboa,+ mpe namoni Saulo ayɛkameli likɔnga na ye;+ mpe talá! batambwisi-makalo mpe bato oyo bamati na mpunda bakómaki esika azalaki.+ 2 Samwele 1:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Bangomba ya Gilboa,+ mamwɛ to mbula ezala likoló na bino te, to bilanga ya makabo mosantu+ ezala mpe te;Mpo kuna nde nguba ya bilombe mibali ekómaki mbindo, Nguba ya Saulo, bongo ata moko etyamaki lisusu mafuta te.+ 1 Ntango 10:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Mpe esalemaki boye: na mokolo oyo elandaki, ntango Bafilistia bayaki kolongola biloko+ ya bato oyo babomamaki, bamonaki Saulo ná bana na ye bakwei na Ngomba Gilboa.+
4 Na nsima, Bafilistia bayanganaki mpe bayaki kotya kaa na bango na Shuneme.+ Bongo Saulo ayanganisaki Yisraele mobimba mpe batyaki kaa na Gilboa.+
31 Bongo Bafilistia bazalaki kobundisa Yisraele,+ mpe mibali ya Yisraele bakimaki liboso ya Bafilistia, mpe bazalaki kokwea se kokwea, babomami+ na Ngomba Gilboa.+
6 Na yango, elenge mobali oyo azalaki koloba na ye alobaki boye: “Nakómaki kaka boye na Ngomba Gilboa,+ mpe namoni Saulo ayɛkameli likɔnga na ye;+ mpe talá! batambwisi-makalo mpe bato oyo bamati na mpunda bakómaki esika azalaki.+
21 Bangomba ya Gilboa,+ mamwɛ to mbula ezala likoló na bino te, to bilanga ya makabo mosantu+ ezala mpe te;Mpo kuna nde nguba ya bilombe mibali ekómaki mbindo, Nguba ya Saulo, bongo ata moko etyamaki lisusu mafuta te.+
8 Mpe esalemaki boye: na mokolo oyo elandaki, ntango Bafilistia bayaki kolongola biloko+ ya bato oyo babomamaki, bamonaki Saulo ná bana na ye bakwei na Ngomba Gilboa.+