Kobima 14:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Sikoyo Moize asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu,+ mpe Yehova abandaki kozongisa mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti butu mobimba mpe kosala ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki,+ mpe mai ezalaki kokabwana.+ Nzembo 106:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Bongo apamelaki Mbu Motane, mpe ekaukaki malɛmbɛmalɛmbɛ;+Mpe atambwisaki bango na mai mozindo lokola na esobe;+ Nzembo 114:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mbu emonaki mpe ekimaki;+Bongo Yordani ebandaki kozonga nsima.+ Nahumu 1:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Azali kogangela mbu,+ mpe azali kokaukisa yango; mpe azali mpenza kokaukisa bibale nyonso.+ Bashane ná Karamele ekauki,+ mpe fololo mpenza ya Libá ekauki.
21 Sikoyo Moize asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu,+ mpe Yehova abandaki kozongisa mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti butu mobimba mpe kosala ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki,+ mpe mai ezalaki kokabwana.+
9 Bongo apamelaki Mbu Motane, mpe ekaukaki malɛmbɛmalɛmbɛ;+Mpe atambwisaki bango na mai mozindo lokola na esobe;+
4 Azali kogangela mbu,+ mpe azali kokaukisa yango; mpe azali mpenza kokaukisa bibale nyonso.+ Bashane ná Karamele ekauki,+ mpe fololo mpenza ya Libá ekauki.