Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 37:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpo Yehova alingaka bosembo,+

      Mpe akotika te bato na ye ya sembo.+

      ע [ʽAyin]

      Bakobatelama mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te;+

      Kasi bana ya bato mabe, bakobomama mpenza.+

  • Nzembo 86:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Ee kɛngɛlá molimo na ngai, mpo nazali sembo.+

      Bikisá mosaleli na yo oyo azali kotyela yo motema+​—yo ozali Nzambe na ngai.

  • Nzembo 97:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ee bino baoyo bolingaka Yehova,+ bóyina oyo ezali mabe.+

      Ye abatelaka milimo ya bato na ye ya sembo;+

      Abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.+

  • Yirimia 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Kende, mpe osengeli kosakola maloba oyo epai na nɔrdi+ mpe koloba ete:

      “‘“Zongá, Ee Yisraele mopɛngwi,” yango nde liloba ya Yehova.’+ ‘“Nakotala bino na elongi ya nkanda te,+ mpo nazali sembo,”+ yango nde liloba ya Yehova.’ ‘“Nakokanga nkanda mpo na libela te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto