5 Bongo Yoabe apesaki Davidi motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo; mpe Yisraele mobimba ezalaki na motángo ya mibali milio moko na nkóto nkama moko (1 100 000) oyo babendaka mopanga,+ mpe Yuda mibali nkóto nkama minei na ntuku nsambo (470 000) oyo babendaka mopanga.