Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 24:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi esalemaki boye: nsima na yango, motema ya Davidi ekómaki kobɛta+ mpo akataki nsɔngɛ ya kazaka ya Saulo oyo ezangá mabɔkɔ.

  • Misala 2:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Nzokande ntango bayokaki bongo, mitema na bango ezokaki,+ mpe balobaki na Petro mpe na bantoma mosusu ete: “Mibali, bandeko, tosengeli kosala nini?”+

  • Baroma 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na mitema na bango,+ ntango lisosoli+ na bango ezali kotatola elongo na bango mpe, na makanisi na bango moko, ezali kofunda bango+ to mpe kolongisa bango.

  • 2 Bakorinti 7:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo mawa oyo eyokani na mokano ya Nzambe ememaka na kobongola motema mpo na lobiko oyo moto akomona yango mabe te na nsima;+ kasi mawa ya mokili ebotaka liwa.+

  • 1 Yoane 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso,+ mpo Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto