Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 32:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 ngai nabongi te na motema boboto nyonso mpe na bosembo nyonso oyo omoniseli mosaleli na yo,+ mpo kaka na lingenda na ngai oyo nde nakatisaki Yordani oyo mpe sikoyo nakómi bituluku mibale.+

  • 1 Samwele 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Atombolaka moto oyo azangá longwa na putulu;+

      Abimisaka mobola na libulu ya putulu,+

      Mpo na kofandisa bango esika moko na bato ya lokumu; mpe apesaka bango kiti ya bokonzi ya nkembo+ mpo ezala ya bango.+

      Mpamba te makonzí ya mabele ezali ya Yehova,+

      Mpe azali kotya likoló na yango mabele oyo ebotaka.

  • 1 Samwele 18:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na yango, Davidi alobaki na Saulo boye: “Ngai nde nani mpe bandeko na ngai, libota ya tata na ngai, nde banani na Yisraele mpo nakóma bokilo ya mokonzi?”+

  • 1 Ntango 17:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nsima na yango, Mokonzi Davidi akɔtaki mpe afandaki liboso ya Yehova+ mpe alobaki ete: “Ee Yehova Nzambe, ngai nde nani?+ Mpe ndako na ngai+ nde nini mpo omema ngai tii kuna?+

  • Mika 6:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Ee yo moto ya mabele, ye ayebisi yo oyo ezali malamu.+ Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo,+ kolinga boboto+ mpe kotambola na bopɔlɔ+ elongo na Nzambe na yo?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto