24 Mpe nkombo na yo+ ezala sembo mpe ekóma monene+ libela na libela, mpe báloba ete: ‘Yehova ya mampinga,+ Nzambe ya Yisraele,+ azali Nzambe mpo na Yisraele,’+ mpe ndako ya mosaleli na yo Davidi ezala ndako oyo ekoumela liboso na yo.+
11 Ee Yehova, bonene,+ nguya,+ kitoko,+ nkembo+ ná lokumu+ ezali ya yo; mpo eloko nyonso na likoló mpe na mabele ezali ya yo.+ Bokonzi+ ezali ya yo, Ee Yehova, Yo mokonzi oyo otombwami likoló na nyonso.+