Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 14:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Mpe Saulo azwaki bokonzi na Yisraele+ mpe akendaki kobunda na banguna na ye nyonso epai na epai, abundaki na Moabe,+ bana ya Amone,+ Edome,+ bakonzi ya Soba+ mpe Bafilistia;+ mpe esika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kopesa bango bitumbu.+

  • 2 Samwele 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, bana ya Amone bamonaki ete Davidi ayini+ bango, bongo bana ya Amone batindaki bato bákende kosomba bato ya Siri ya Bete-rehobe+ mpe bato ya Siri ya Soba,+ basoda nkóto ntuku mibale (20 000) oyo batambolaka na makolo, mpe mokonzi ya Maaka+ ná mibali nkóto moko (1 000), mpe na Ishitobe mibali nkóto zomi na mibale (12 000).

  • 1 Bakonzi 11:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe Nzambe abimiselaki ye motɛmɛli+ mosusu, elingi koloba Rezone mwana ya Eliada, oyo akimaki nkolo na ye Hadadezere+ mokonzi ya Soba.+

  • Nzembo 60:maloba ya ebandeli ya loyembo-12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Fololo lísi ya Bokundoli. Mikitame. Ya Davidi. Mpo na koteya.+ Ntango abundaki na Arame-naharaime ná Arame-Zoba, mpe Yoabe azongaki mpe abɛtaki Edome na Lobwaku ya Mungwa, ɛɛ bato nkóto zomi na mibale (12  000).+

      60 Ee Nzambe, obwaki biso, opanzi biso,+

      Osiliki. Osengeli kozongisa biso.+

       2 Oningisi mabele, opasoli yango.+

      Bikisá madusu na yango, mpo esili kotengatenga.+

       3 Omonisi bato na yo mpasi.+

      Omɛlisi biso vinyo oyo ezali kopesa biso kizunguzungu.+

       4 Opesi baoyo bazali kobanga yo elembo+

      Mpo bákima litimbo nyokanyoka. Sela.

       5 Mpo bato oyo olingaka bábikisama,+

      Ee bikisá na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe yanolá biso.+

       6 Nzambe ye moko alobi na kati ya bosantu na ye+ ete:

      “Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme ezala likabo;+

      Mpe nakomeka bonene ya lobwaku ya patatalu ya Sukote.+

       7 Gileade ezali ya ngai mpe Manase ezali ya ngai,+

      Mpe Efraime ezali ndako ya makasi ya nkumu na ngai;

      Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+

       8 Moabe ezali nzungu na ngai ya kosukola.+

      Nakobwakela Edome sandale na ngai.+

      Nakoganga ete nalongi Filistia.”+

       9 Nani akomema ngai na engumba oyo ezingami?+

      Nani akokamba ngai mpenza kino na Edome?+

      10 Ee Nzambe, yo moto obwaki biso+

      Mpe yo Nzambe na biso ozali kobima te elongo na mampinga na biso, boye te?+

      11 Sungá biso tólongwa na mpasi,+

      Mpo lobiko oyo euti na moto ya mabele ezali mpamba.+

      12 Tokozwa nguya ya bomoi oyo euti na Nzambe,+

      Mpe ye moko akonyata banguna na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto