Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 6:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Kasi palata nyonso, wolo, biloko ya motako mpe ya bibende ezali biloko ya bosantu mpo na Yehova.+ Esengeli kokende na esika ya kobomba biloko ya motuya ya Yehova.”+

  • 1 Bakonzi 7:51
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 51 Nsukansuka, mosala nyonso oyo Mokonzi Salomo asengelaki kosala mpo na ndako ya Yehova ekómaki na nsuka na yango;+ mpe Salomo abandaki kokɔtisa biloko oyo tata na ye Davidi asantisaki;+ atyaki palata, wolo ná biloko na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova.+

  • 1 Ntango 18:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mokonzi Davidi asantiselaki+ mpe Yehova biloko yango, esika moko na palata mpe wolo oyo abɔtɔlaki na bikólo nyonso:+ na Edome, na Moabe,+ na bana ya Amone,+ na Bafilistia+ mpe na Amaleke.+

  • 1 Ntango 22:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe talá, na ntango ya mpasi+ na ngai, nalɛngɛli mpo na ndako ya Yehova talanta nkóto nkama moko (100 000) ya wolo+ mpe talanta milio moko (1 000 000) ya palata, bongo motako+ ná ebende,+ ndenge ya komeka kilo na yango ezali te mpo eleki mingi; nalɛngɛli mpe banzete ná mabanga, kasi okobakisa mosusu.

  • 1 Ntango 26:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Na biloko oyo ezwamaki na bitumba+ mpe na biloko epunzamaki,+ basantisaki biloko mosusu mpo na kobongisaka ndako ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto