Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 25:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe Yehova alobaki na ye ete: “Bikólo mibale ezali na kati ya libumu na yo,+ mpe bituluku mibale ya bato ya bikólo ekokabwana na kati na yo;+ mpe etuluku moko ya bato ya ekólo ekozala makasi koleka etuluku mosusu ya bato ya ekólo,+ mpe mokóló akosalela leki.”+

  • Ebandeli 27:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Tiká bato ya bikólo básalela yo mpe bituluku ya bato ya bikólo efukamela yo.+ Zalá nkolo ya bandeko na yo, mpe tiká bana ya mama na yo báfukamela yo.+ Moto nyonso oyo azali kati na baoyo bazali kolakela yo mabe alakelama mabe, mpe moto nyonso oyo azali kati na baoyo bazali kopambola yo apambolama.”+

  • Ebandeli 27:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Kasi Yisaka azongiselaki lisusu Esau maloba ete: “Talá natye ye nkolo na yo,+ mpe napesi ye bandeko na ye nyonso bázala basaleli na ye,+ mpe mbuma ná vinyo ya sika napesi yango ezala biloko ya kosunga ye,+ bongo eloko nini mosusu nakoki kosala mpo na yo, mwana na ngai?”

  • Mitángo 24:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe Edome esengeli kokóma eloko ya bato,+

      Ɛɛ, Seire+ esengeli kokóma eloko ya banguna+ na ye,

      Wana Yisraele azali komonisa mpiko na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto