28 Mpamba te, na miso ya nkolo na ngai mokonzi, bato nyonso ya ndako ya tata na ngai balingaki kozala kaka bato moko oyo basengeli kokufa, nzokande otyaki mosaleli na yo na kati ya bato oyo balyaka na mesa na yo.+ Bongo lotomo nini nazali na yango lisusu mpo nakoba kolelela+ mokonzi?”