12 Na nsima, Yefeta atindaki bamemi-nsango epai ya mokonzi ya bana ya Amone,+ alobi ete: “Ngai ná yo likambo nini,+ mpo namoni oyei kobunda na ngai na mokili na ngai?”
33 Mpe abɛtaki bango nzelanzela, banda na Aroere tii na Minite,+ bingumba ntuku mibale (20), kino na Abele-keramime, ezalaki koboma moko monene. Na ndenge yango, bana ya Amone batyamaki na nse ya bokonzi ya bana ya Yisraele.
11Bongo Nahashe, Moamone,+ amataki mpe atyaki kaa mpo na kobundisa Yabeshe,+ na Gileade. Na yango, mibali nyonso ya Yabeshe balobaki na Nahashe boye: “Salá kondimana na biso mpo tósalela yo.”+