Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na yango, Samwele ayebisaki maloba yango nyonso, mpe abombelaki ye likambo moko te. Bongo ye alobaki ete: “Ezali Yehova. Tiká asala oyo ezali malamu na miso na ye.”+

  • 1 Samwele 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Yonatane alobaki na mosaleli yango, momemi-bibundeli na ye ete: “Yaká tókatisa epai ya mwa etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso, bisutu+ wana. Mbala mosusu Yehova akokɔtela biso, mpamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.”+

  • 2 Samwele 15:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Kasi soki alobi boye: ‘Nasepeli na yo ata moke te,’ ngai oyo, tiká asala ngai ndenge amoni malamu na miso na ye.”+

  • Nzembo 37:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Tikelá Yehova nzela na yo,+

      Mpe talelá ye,+ mpe ye moko akosala.+

  • Nzembo 44:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Na lisalisi na yo tokotindika banguna na biso;+

      Na nkombo na yo tokonyata baoyo bazali kotɛlɛmɛla biso.+

  • Masese 29:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Kolɛnga liboso ya bato, yango nde etyaka motambo,+ kasi ye oyo azali kotyela Yehova motema akobatelama.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto