Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 23:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo Sara akufaki na Kiriate-arba,+ elingi koloba, Hebrone,+ na mokili ya Kanana,+ mpe Abrahama akɔtaki kolela Sara makasi mpe alelaki ye na kobimisa mpisoli.

  • Mitángo 13:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Ntango bamataki tii bakɔti na Negebe,+ bakómaki tii na Hebrone.+ Sikoyo Ahimane, Sheshai ná Talamai,+ baoyo Anake+ abotaki, bazalaki kuna. Nzokande, Hebrone+ etongamaki mbula nsambo liboso ya Zoane+ ya Ezipito.

  • Yosua 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Yango wana Hebrone ekómá libula ya Kalebe mwana ya Yefune Mokenize tii na mokolo ya lelo, mpamba te alandaki Yehova Nzambe ya Yisraele na makambo nyonso.+

  • Yosua 20:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo basantisaki Kedeshe+ na Galile, na etúká ya ngombangomba ya Nafatali, mpe Shekeme+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime, mpe Kiriate-arba,+ elingi koloba: Hebrone, na etúká ya ngombangomba ya Yuda.

  • Yosua 21:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Boye, bapesaki bango Kiriate-arba+ (Arba yango azalaki tata ya Anake),+ elingi koloba: Hebrone,+ na etúká ya ngombangomba ya Yuda,+ ná esika na yango nyonso ya zingazinga mpo na koleisa banyama matiti;

  • Yosua 21:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 mpe esobe ya engumba yango, ná bamboka na yango, bapesaki yango na Kalebe, mwana ya Yefune, mpo ezala ya ye.+

  • 1 Samwele 30:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 baoyo bazalaki na Hebrone+ mpe na bisika nyonso oyo Davidi atambolaki, ye ná bato na ye.

  • 2 Samwele 5:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na nsima, mabota nyonso ya Yisraele bayaki epai ya Davidi+ na Hebrone+ mpe balobaki ete: “Talá! Biso tozali makila* moko na yo.+

  • 1 Bakonzi 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe mikolo oyo Davidi ayangelaki Yisraele ezalaki mbula ntuku minei (40).+ Ayangelaki na Hebrone+ mbula nsambo,+ mpe ayangelaki na Yerusaleme mbula ntuku misato na misato (33).+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto