Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpo nayebi malamu ete okozongisa ngai na liwa,+

      Mpe na ndako ya koyangana ya bato nyonso oyo bazali na bomoi.

  • Mosakoli 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bango nyonso bakokende esika moko.+ Bango nyonso bauti na putulu,+ mpe bango nyonso bazali kozonga na putulu.+

  • Mosakoli 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza,+ mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te,+ bwanya mpe te+ na Nkunda,*+ esika ozali kokende.+

  • Misala 2:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Mibali, bandeko, epesami nzela kolobela bino polele mpe na bosembo na ntina na Davidi mokonzi ya libota: ete akufaki+ mpe akundamaki mpe lilita na ye ezali na kati na biso tii na mokolo ya lelo.

  • Misala 2:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Ya solo Davidi amataki na likoló te,+ kasi ye moko azali koloba ete: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali,+

  • Misala 13:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpo Davidi,+ ye, asalaki mokano ya Nzambe oyo eyebanaki na eleko na ye mpenza mpe alalaki na kati ya liwa mpe alalisamaki elongo na bankɔkɔ na ye mpe apɔlaki.+

  • Baroma 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana, kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko+ mpe liwa+ mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu+—.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto