Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ruta 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na ntango yango Boaze azalaki kolya mpe komɛla, mpe motema na ye ezalaki kosepela.+ Bongo akendaki kolala na nsuka ya libondo ya mbuma. Nsima na yango, ye ayaki na kobombana mpe alongolaki elamba oyo ezipaki makolo na ye mpe alalaki.

  • 1 Samwele 25:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Na nsima, Abigaile akɔtaki epai ya Nabale, mpe talá, azalaki kosala fɛti moko na ndako na ye lokola fɛti ya mokonzi;+ mpe motema ya Nabale eyokaki esengo na kati na ye, mpe alangwaki mpenza kolangwa;+ mpe Abigaile ayebisaki ye eloko moko te, ya moke to ya monene, tii ntɔngɔ etanaki.

  • Estere 1:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na mokolo ya nsambo, ntango motema ya mokonzi ekómaki esengoesengo mpo na vinyo,+ alobaki na Mehumane, Bizita, Harabona,+ Bigita, Abagata, Zetare ná Karakase, basali nsambo ya mokonzi oyo bazalaki kosalela+ Mokonzi Ahasueruse,

  • Nzembo 104:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe vinyo oyo esepelisaka motema ya moto​—mowei mpamba,+

      Mpo na kongɛngisa elongi na mafuta,+

      Mpe limpa oyo epesaka makasi na motema ya moto​—mowei mpamba.+

  • Mosakoli 2:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Na motema na ngai, natalaki malamumalamu ndenge nasepelisaki nzoto na ngai na vinyo,+ wana natambwisaki motema na ngai na bwanya,+ ɛɛ, mpe nalandaki bozoba mpo namona soki ezali na eloko nini ya malamu na makambo oyo bana ya bato basalaki na nse ya lola na mikolo nyonso ya bomoi na bango.+

  • Mosakoli 10:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Limpa esalemi mpo bato oyo basalaka mosala básɛka, mpe vinyo epesaka bomoi esengo;+ kasi mbongo nde ekataka makambo nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto