14 “Yaire+ mwana ya Manase azwaki etúká mobimba ya Argobe+ tii na ndelo ya Bageshure+ mpe ya Bamaakate,+ mpe abengaki bamboka mike yango ya Bashane na nkombo na ye moko, Havote-yaire,+ tii na mokolo ya lelo.
5 mpe oyo azalaki koyangela Ngomba Heremone+ mpe Saleka mpe Bashane+ mobimba, kino na ndelo ya Bageshure+ mpe Bamaakate,+ mpe ndambo ya Gileade, tii na teritware ya Sihone,+ mokonzi ya Heshibone.+
8 Mpo mosaleli na yo asalaki elako moko monene+ ntango nazalaki kofanda na Geshure+ na Siri ete: ‘Soki Yehova azongisi ngai mpenza na Yerusaleme, nakopesa mpenza Yehova mbeka.’”+