Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 19:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bato nyonso bakómaki koswana kati na mabota nyonso ya Yisraele mpe balobaki ete: “Mokonzi nde abikisaki biso na lobɔkɔ ya banguna na biso,+ mpe ye nde abikisaki biso na lobɔkɔ ya Bafilistia; bongo sikoyo akimi mboka mpo na Abisalome.+

  • Nzembo 3:maloba ya ebandeli ya loyembo-8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Mondule ya Davidi ntango azalaki kokima Abisalome mwana na ye.+

      3 Ee Yehova, mpo na nini banguna na ngai bakómi mingi?+

      Mpo na nini bato mingi bazali kotɛmɛla ngai?+

       2 Mingi bazali koloba mpo na molimo na ngai ete:

      “Nzambe akokoka kobikisa ye te.”+ Sela.

       3 Nzokande yo, Ee Yehova, ozali nguba oyo ezali kobatela ngai epai na epai,+

      Nkembo+ na ngai mpe Moto oyo azali kotombola motó na ngai.+

       4 Na mongongo na ngai nakobenga Yehova ye moko,

      Mpe ye akoyanola ngai longwa na ngomba na ye mosantu.+ Sela.

       5 Ngai nakomilalisa mpo nalala mpɔngi;

      Nakolamuka mpenza, mpo Yehova ye moko azali kosunga ngai.+

       6 Nakobanga te bato bankóto zomi zomi

      Oyo batandani epai na epai mpo na kotɛmɛla ngai.+

       7 Tɛlɛmá,+ Ee Yehova! Bikisá ngai,+ Ee Nzambe na ngai!+

      Mpo okobɛta mpenza banguna na ngai na mbanga.+

      Okobuka mpenza mino ya bato mabe.+

       8 Lobiko ezali ya Yehova.+

      Lipamboli na yo ezali likoló ya bato na yo.+ Sela.

  • Masese 19:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Ye oyo azali komonisa tata mpasi mpe azali kobengana mama+ azali mwana oyo azali kosala makambo ya nsɔni mpe ya kosambwa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto