Ruta 1:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Epai okokufa, ngai mpe nakokufa,+ mpe kuna nde nakokundama. Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa+ yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.” Masese 17:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso,+ mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.+ Masese 18:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Baninga mosusu balukaka kosalana mabe,+ kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.+ Matai 8:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Mpe mokomeli moko boye ayaki mpe alobaki na ye ete: “Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende.”+
17 Epai okokufa, ngai mpe nakokufa,+ mpe kuna nde nakokundama. Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa+ yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.”