Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Adoni-zedeke mokonzi ya Yerusaleme, ayokaki ete Yosua azwi Ai+ mpe na nsima abebisi+ yango mpe asali Ai mpe mokonzi+ na yango ndenge asalaki Yeriko+ mpe mokonzi na yango,+ mpe ete bato oyo bafandi na Gibeone baluki kozala na kimya elongo na Yisraele+ mpe bazali kofanda kati na bango,

  • Yosua 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ezalaki na ntango yango nde Yosua alobaki na Yehova na mokolo oyo Yehova apesaki Baamore epai ya bana ya Yisraele, mpe alobaki na miso ya Yisraele boye:

      “Moi,+ tɛlɛmá na Gibeone,+

      Mpe sanza, tɛlɛmá na lobwaku ya patatalu ya Aiyalone.”+

  • Yosua 18:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Gibeone,+ Rama ná Beerote,

  • Yosua 21:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe na libota ya Benyamina: Gibeone+ ná esika na yango ya koleisa banyama matiti, Geba+ ná esika na yango ya koleisa banyama matiti,

  • 2 Samwele 20:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bakómaki pene na libanga monene oyo ezali na Gibeone,+ mpe Amasa+ ayaki kokutana na bango. Nzokande, Yoabe alataki elamba mpe akangaki mokaba na loketo; mpe na loketo na ye, akangaki mopanga moko, oyo ezalaki na kati ya libenga na yango. Apusanaki, mpe yango ekweaki.

  • 1 Bakonzi 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na Gibeone, Yehova abimelaki+ Salomo na ndɔtɔ,+ na butu; mpe Nzambe alobaki boye: “Sɛngá eloko oyo nasengeli kopesa yo.”+

  • 1 Ntango 14:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Na yango, Davidi asalaki ndenge Nzambe ya solo apesaki ye mitindo,+ mpe babomaki kaa ya Bafilistia banda na Gibeone+ tii na Gezere.+

  • 2 Ntango 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Na nsima, Salomo ná lisangá mobimba elongo na ye bakendaki na esika oyo etombwaná oyo ezalaki na Gibeone;+ mpo hema ya kokutana+ ya Nzambe ya solo, oyo Moize mosaleli+ ya Yehova asalaki na esobe, ezalaki nde kuna.

  • Yisaya 28:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo Yehova akotɛlɛma lokola na Ngomba Perazime,+ akoningana lokola na lobwaku ya patatalu oyo ezali pene na Gibeone,+ mpo asala likambo na ye—likambo na ye ezali ya kokamwa—mpe mpo asala mosala na ye—mosala na ye ezali mosala moko oyo esalemá naino te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto