12 Lisusu, ntango apesaki bambeka, Abisalome atindaki bázwa Ahitofele+ moto ya Gilo,+ mopesi-toli ya Davidi,+ na engumba na ye Gilo.+ Bongo likita+ yango ya mabe ezalaki se koya makasi, mpe bato bazalaki se kobakisama+ epai ya Abisalome.
31 Mpe bapesaki Davidi nsango ete: “Ahitofele azali na kati ya bato oyo bazali kosala likita+ na Abisalome.”+ Na yango, Davidi alobaki+ boye: “Nabondeli yo, Ee Yehova,+ kómisá toli ya Ahitofele bozoba!”+