12 Lisusu, ntango apesaki bambeka, Abisalome atindaki bázwa Ahitofele+ moto ya Gilo,+ mopesi-toli ya Davidi,+ na engumba na ye Gilo.+ Bongo likita+ yango ya mabe ezalaki se koya makasi, mpe bato bazalaki se kobakisama+ epai ya Abisalome.
23 Mpe Ahitofele amonaki ete balandi toli na ye te,+ bongo akangisaki kiti ya mpunda, atɛlɛmaki mpe akendaki na ndako na ye, na engumba+ na ye. Na nsima, apesaki mitindo na bato ya ndako+ na ye mpe amikangaki nsinga na nkingo+ mpe akufaki.+ Bongo bakundaki+ ye na lilita ya bankɔkɔ na ye.