5 Bongo Mokonzi Davidi akómaki tii na Bahurime,+ mpe talá! moto moko ya libota ya ndako ya Saulo azali kobima kuna, mpe nkombo na ye Shimei,+ mwana ya Gera, azali kobima mpe azali kolakela ye mabe ntango azali kobima.+
36 Nsukansuka, mokonzi atindaki bato bábenga Shimei+ mpe alobaki na ye boye: “Tongá ndako na Yerusaleme, mpe osengeli kofanda wana mpe kobima wana te mpo na kokende epai boye to boye.
44 Mpe mokonzi alobaki lisusu na Shimei boye: “Yo moko oyebi mpenza mabe nyonso oyo osalaki tata na ngai Davidi,+ mabe oyo motema na yo eyebi malamu; mpe Yehova akozongisa mpenza mabe na yo na motó na yo moko.+