Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 11:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kasi nakobɔtɔla bokonzi nyonso te.+ Nakopesa mwana na yo libota moko, mpo na mosaleli+ na ngai Davidi mpe mpo na Yerusaleme oyo naponá.”+

  • 2 Ntango 13:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi biso, Yehova azali Nzambe na biso,+ mpe totiki ye te; banganga-nzambe bazali kosalela Yehova, bana ya Arona, mpe lisusu Balevi bazali na mosala.+

  • 2 Ntango 25:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe Amazia ayanganisaki Yuda mpe atɛlɛmisaki bango na kolanda ndako ya bankɔkɔ na bango,+ na kolanda bakonzi ya bato nkóto nkóto+ mpe bakonzi ya bato nkama nkama+ mpo na Yuda mobimba mpe Benyamina; mpe na nsima akomaki nkombo na bango banda na mbula ntuku mibale (20)+ tii na likoló, mpe nsukansuka, amonaki ete bazali bato nkóto nkama misato (300 000), bato ya makasi koleka oyo bakoki kokende na mosala ya soda, oyo bayebi kosalela likɔnga+ mpe nguba monene.+

  • Hosea 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Efraime azingi ngai na lokuta+ mpe ndako ya Yisraele, na bokosi. Kasi Yuda azali naino kotambola elongo na Nzambe,+ mpe Oyo Aleki Bosantu azali kotyela ye motema.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto