Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 29:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na yango, Davidi apambolaki+ Yehova na miso ya lisangá+ mobimba mpe Davidi alobaki boye: “Tiká opambwama,+ Ee Yehova Nzambe ya Yisraele+ tata na biso, libela na libela.

  • Nehemia 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe Balevi: Yeshua, Kadimiele, Bani, Hashabeneya, Sherebia, Hodia, Shebania ná Petahia balobaki ete: “Bótɛlɛma, bópambola+ Yehova Nzambe na bino libela na libela.+ Mpe tiká bápambola nkombo na yo ya nkembo,+ oyo ebongi mpenza na mapamboli nyonso mpe masanzoli nyonso.

  • Nzembo 34:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Nakopambola Yehova ntango nyonso;+

      Ntango nyonso lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai.+

  • Nzembo 72:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yehova Nzambe, Nzambe ya Yisraele, apambolama,+

      Ye moko nde azali kosala misala ya kokamwa.+

  • Danyele 4:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 “Mpe na nsuka ya mikolo,+ ngai Nebukadenezare natombolaki miso na ngai na likoló,+ mpe mayele na ngai ekómaki kozongela ngai; mpe napambolaki Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe nasanzolaki mpe nakumisaki Ye oyo azali na bomoi seko,+ mpo boyangeli na ye ezali boyangeli ya seko mpe bokonzi na ye ezali libota na libota.+

  • Baefese 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama,+ mpo apamboli biso+ na lipamboli nyonso ya elimo na bisika ya likoló+ na bomoko elongo na Kristo,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto