Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe okotya Arona ná bana na ye ya mibali, mpe basengeli kokokisa mosala na bango ya bonganga-nzambe;+ mpe mopaya nyonso oyo akobɛlɛma, asengeli kobomama.”+

  • 1 Bakonzi 13:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Nsima ya likambo yango, Yeroboame abongwanaki te mpo na kotika nzela na ye ya mabe, kasi na kati ya bato, akómisaki mpe bamosusu banganga-nzambe ya bisika oyo etombwaná.+ Moto nyonso oyo azalaki kosepela na likambo yango, ye azalaki kotondisa lobɔkɔ na ye na nguya+ mpe azalaki koloba boye: “Akóma moko ya banganga-nzambe ya bisika oyo etombwaná.”

  • 2 Ntango 11:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo Balevi batikaki bisika na bango ya koleisa banyama matiti+ mpe libula na bango,+ bongo bayaki na Yuda mpe Yerusaleme,+ mpamba te Yeroboame+ ná bana na ye balongolaki bango na mokumba+ mpo básalela Yehova lisusu te mosala ya banganga-nzambe.

  • 2 Ntango 13:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bobengani banganga-nzambe ya Yehova,+ bana ya Arona ná Balevi, mpe bozali kokoba komisalela banganga-nzambe ndenge bato ya mikili mosusu basalaka,+ boye te? Moto nyonso oyo ayei mpe atondisi lobɔkɔ na ye na nguya* na kopesáká mwana-ngɔmbɛ ya mobali mpe mpate-mibali nsambo, akómi nganga-nzambe ya biloko yango oyo ezali banzambe te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto