Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 21:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Kasi bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki Mokonzi Amone likita.+ Na nsima, bato ya mokili bakómisaki mwana na ye Yosiya+ mokonzi na esika na ye.

  • 2 Bakonzi 22:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Yosiya+ azalaki na mbula mwambe ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula ntuku misato na moko (31) na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Yedida mwana ya Adaya moto ya Bozekate.+

  • 2 Bakonzi 23:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe lisusu, etumbelo oyo ezalaki na Betele,+ esika oyo etombwaná oyo Yeroboame+ mwana ya Nebate asalaki, ye oyo atindaki Yisraele básala lisumu,+ ata etumbelo yango ná esika oyo etombwaná, abukaki yango. Na nsima, atumbaki esika yango oyo etombwaná; atutatutaki yango tii ekómaki putulu mpe atumbaki nzete yango ya losambo.

  • 2 Bakonzi 23:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Na mikolo na ye, Farao Neko+ mokonzi ya Ezipito amataki epai ya mokonzi ya Asiri penepene na ebale Efrate,+ mpe Mokonzi Yosiya akendaki kokutana na ye;+ kasi abomaki Yosiya+ na Megido,+ ntango kaka amonaki ye.

  • 2 Ntango 34:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Nsima na yango, Yosiya alongolaki biloko nyonso oyo eyinamá+ na mikili nyonso ya bana ya Yisraele,+ mpe asalisaki bato nyonso oyo bazalaki na Yisraele mosala, mpo na kosalela Yehova Nzambe na bango. Na mikolo na ye nyonso, batikaki te kolanda Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto