36 Mpe nakopesa mwana na ye libota moko, mpo Davidi mosaleli na ngai akoba kozala na mwinda ntango nyonso liboso na ngai na Yerusaleme,+ engumba oyo naponá mpo na kotya nkombo na ngai kuna.+
7 Mpe Yehova alingaki te kobebisa ndako ya Davidi,+ mpo na kondimana+ oyo asalaki ná Davidi, mpe kaka ndenge alobaki ete akopesa ye+ ná bana na ye mwinda ntango nyonso.+
12 Bongo Yesu alobaki na bango lisusu ete: “Ngai nazali pole+ ya mokili. Moto oyo azali kolanda ngai akotambola na molili soki moke te,+ kasi akozwa pole ya bomoi.”
16 “‘Ngai, Yesu, natindaki anzelu na ngai atatwela bino makambo wana mpo na masangá. Nazali mosisa+ mpe mwana+ ya Davidi, mpe monzoto ya ntɔngɔ oyo engɛngaka.’”+